Vrienden van Congo vzw-asbl
 

Select language:
Français Nederlands English Lingala

 
 

   Boyambi

Mboka Congo ezali lelo elilingi ya nkoli, esika nini basali banso bazali bongo na mayele ya misala mosusu kasi ya botongi te. Mingi na bango bazali bongo bazuzi…Kasi mingi penza basali ya politiki. Bazali bongo kolimbola makambo mingi mpe ba yebi bongo mingi kasi bazali kotia boyebi na bango na misala te.

Ezali nde na mboka Congo nde bazali kosomba na mboka ya bapaya bileyi ya mikolo na mikolo; ezali mpe kaka na mboka Congo wana nde mbisi eza kobotama, kokola mpe kokufa na mayi myango. Ezali kaka na mboka Congo wana oyo etondi bongo na bozui ya ndenge na ndenge, kuna nde esika 80% ya batu bazali nde kofutama centimi tuku mibale na mokolo. Sika eloko nini ezangi po été congolais ekoka komisimba?

Solo, ndenge tosili kolimbola bongo liboso, elobeli kaka moko bazali kosalela na nkoli wana, ezali bongo oyo etali boyangeli ekolo bowuti na bato, bobonguani, accord global et inclusif.

Kasi nani akoleyisa banto banso wana? Nani akotangisa bana na bango oyo bazali kokola mpe oyo basengeli na kosimba mboka na mbula bizali koya?

Na boye, bato ya mboka Congo bazali bongo kotalela lisusu lisanga ya bikolo bisusu, bazali kotalela maponami ya bakambi, bazali kotalela léta. Ndenge nini okotambola na mabele ebotaka mbuma, oyo etondi na bozui ya ndenge na ndenge na se na mabele na yango ebongo koluka lisalisi esika mosusu?

Na mboka Congo, talo ya mabele mpe ya bilanga oyo esundolami mpona boyei ya bavandi ya mboka to mpe po na misala ya mabanga ya talo eyebani kaka ndambo to mpe eyebani te.

Mboka Congo ezali kosomba mbisi na bapaya nzoka nde moko ya mayi oyo etondi na mbisi ezali mbongo na mboka Congo.

Maboko mpe motema, libonza mpe komibosana, lofundu mpe bekene wana ezali mbongo biloko oyo esengeli mpo na kotombolisa mboka.

Ba congolais babungisi bongo lolendo na bango mpo bazali na bosenga ya lipa. Esengeli na biso ko bengana nzala na misala ya mabele, ya mayi mpe ya botongisi ya ba ndako.

Bakambi ya mboka bazali kolaka, ba congolais bazali kozela se kozela kasi bazali nde kolekisa tango na kovandaka pamba, na miziki…lokola bato bakufa miso, bazali kozela malako oyo bakambi balaki, kasi mpasi mpo été ezali ko kokisama te.

Ba congolais babongaki nako sala misala ya mabele, ya moluka, ya bobokoli niama mpo bakoka mbongo ko mi leyisa mpe ko mitonga. Kasi nzoka bazali nde kolekisa tango na bango na masolos, na masapo oyo ezali na tina te. Bazali bongo komitambuisa lokola bato oyo bazali kosepela na evandeli wana.

Kasi tango ekoki te mpo te toleka na misala? Tokoka kokanisa na oyo etali biyano ya bomoi na biso mpe na oyo etali bongo ekolo na biso?

NEWS
ALBUMS